Page 1 1 BOYEKOLI ETALI BONDONGBANI YA BOLAMU YA BATO MPE YA EZINGELO (eise) EUTI NA MOSOLO YA BADEFISI MBONGO MPE NA LIKABO YA IDA NA NZELA YA MANAKA YA EOKLO ZAMBA MPE BOBATELI LIZALISIMU. (PNFOCO) Version finale Septembre 2008 Agreco E2011 Page 2 2 BOKUSE BWA MOSALA CGES Ntina ya boyangeli ezingelo mpe bozali malamu oyo ya PNFoCo elengeli ezali kosala ‘te bobateli ya Banque Mondiale esalema engebene na mibeko ya ntoki. Lokola ekolo ezali na magelema te mpo ya kobatela ezingelo, bakosalela bobele politiki ya Banque Mondiale mpo na manaka oyo. Nzokande, mobeko moko ya ekolo etali ezingelo etikali moke ebima (octobre 2008) mpe ligelema etali kobongisa ezingelo ekolanda. Nzela ya boyangeli oyo.esangisa makambo mana manso. CGES elimboli ndenge nini myango ekoyebana mpe ndenge nini ekozwa mosolo esengeli engebene na ezingelo mpe na bolamu ya bato, ndenge bilembo ekopesama na myango yango esengeli kosalema mpe ndenge nini bakoki kotala soki etamboli malamu to te, mpe soki mabongiselo myango miboti mbuma lolenge milengelamaki. CGES oyo esalemi sima ya likakoli ya manaka oyo epesamaki mpe ya masolo oyo elimbolamaki mpe epesamaki na bato. Mituna ya liboso oyo etunamaki na bituka ezali na zamba na sanza ya misato ya mobu 2008 esangisaki bato kama motoba (600) mpe elingisaki kobongisa oyo ezangaki na likakoli ya mikanda oyo ezali koloba na ntina ya zamba.mituna miye mitunamaki o mboka likola Bikoro, Mbandaka, Ivemba moke, Boongo, Inongo, Epulu, Beni, Mambasa, Lisala, Boso- Simba, Kubulu, Yafunga, Yoela, B.N.B, elimbolaki mingi mpenza bokangami ya bato ya mboka mpe baye bazali na zamba (bakolo mabele mpe bato oyo bayei koya) na ndenge ya boyangeli ezali kosalelama lokola bobateli, bomisi nkita ya zamba mpe bokoti mpamba. Biyano na mituna mena ekotisami kati ya mokanda oyo elakisi ezalela ya mosala.Batalaki mpe bandimaki ezalela yango ntango ya masolo esalemaki na Kinshasa na mikolo ya yambo mpe ya mibale, ya sanza ya mineyi oyo esangisaki bato ntuku mitano. Ntango ya masolo mana, balimbolaki mpe baponaki nzela ndenge na ndenge elongobani na misala miye PNFOCO ekani kosala. Na ya misato ya sanza ya mineyi, o likita ike iye esangisaki lisangisaki bato ntuku mibali na mitano, bakakolaki makambo matali ezingelo mpe bolamu ma bato na botalaka nzela oyo endimamaka. Likindo ya misato ya bondimi esangisaki o mboka Kinshasa, na mikolo zomi na mineyi mpe zomi na mitano o sanza ya mitano, bato ntuku mitano mpe elingisaki kokakola ndelo ndenge na ndenge ya boyangeli mpe ya bondimi likakoli ya ezingelo, meko ya kolembisa mpe misala ya kosala. CGES elimboli na bolayi mpo na nini mpe tina nini mwango ya PNFOCO. Elimboli polele tina ya bizaleli bia bato o makambo matali zamba sik’awa mpe bobateli mpe bobateli yango o mboka Congo. O nzela ya boyekolo ena, mbuma ya ankete iye esalemaki o bisika bia yambo misala mina mikosalema, ebele ma mikanda mikomamaki o tina ena, makaninsi ma PNFOCO mpe mibeko mitali bobateli zamba miye mizali, likakoli esalemaki na kolandaka mabongiselo ya ezingelo. Mbuma ya momekano ena, oyo esalemaki na bosangisaka bato banso batalaka makambo matali zamba o makita misato mia misala, miye mipesaki nzela ebongi mpe elimboli meko ekoki mpo ya bokitisi mbeba to bokolisi bolamu ya misala minso elengelami mpo na PNFOCO. Sima ya likakoli mpe bosololi na bato banso, ekolanda bopalanganisi ba lapolo mpe bosololi na bato banson o kati ya mboka Congo mpo ya kozwa makanisi ma bango, maye makoyelama lisusu mpe mikotindama o bapesi misolo.lolenge politiki ya Banque Mondiale esengi. Nzela ya boyangeli ya ezingelo mpe ya bobateli bato esalemi na kolanda makanisi ya biyangeli bisusu biye bisalemi ntango ya EES iye, biteni biye bilandi : - Lisango ya ntoki (OP 4.11) - Bankolo mboka (Pygmees) (OP 4.10) - Bolongoli bato o bisika bia bango na na bolingi ba bango te (OP 4.12) - Boyangeli bopekisi bokoti o bisika bia bango (OP 4.12) Page 3 3 O ntango isusu, mikanda miye totangi likolo nde miye kobakisama o likolo ya CGES soki mpo na makambo ya sikisiki. MANAKA PNFoCo ezali eyano ya mbulamatari ya ekolo Congo na makambo matali zamba lelo. Ekolakisa nzela ya kolanda makambo matali misala mpe myango oyo mizali kosalema lelo na oyo miye mikoya sima. Etali makambo ya boyangeli bomengo ya lizalisami (ressources naturelles) lokola mpe bobateli lizalisami. Ekosala nyonso mpo na kobatela zamba mpe kotombola misala lokola kopesa motuya na biye binso bizali o zamba. Manaka yango ezali na biteni motoba na lolenge elimbolamaki o mikanda mia libandeli: Eteni ya yambo: « Bolendisi bisaleli to mibeko » (mingi penza bolendisi Ministele ya Ezingelo, bobateli lizalisami mpe matambole (ICCN). Eteni iye etali makambo ya boyangeli bosali ya Ministele mpe ya ICCN mpe botongi ndako ya misala. Eteni ya mibale: « Masungi » bokaboli misala mpe bopalanisi mibeko mpe magelema, mingi mpenza mibeko mitali zamba. Eteni iye etali mpe bokaboli milioni zomi ya hectares na eteni ya bomeki manaka na bituka misato miye: Bandundu, Equateur mpe etuka ya Orientale. Ekani mpe kosukisa bobongoli mikanda ya kala na miye mia sika. Eteni ya misato: « Bobateli lizalisimu ». Bobongisi bisika bibatelemi biye biyebani mpe bokeli bisika bia kobatela bisusu. Elengelami, na sima ya mibu mibongisami mpo na mwango miye, kobakisa millioni ya hectares zomi na mitano na etando ya bisika bibatelami mpo ya bopesa nzela ya bokokisi 15 % ya bisika bibatelami lokola buku ya mibeko etali makambo ya bobateli esengi. Eteni ya mineyi: « Bokengeli mpe bobongisi zamba ya nkita ». etni iye ekani kolengele lolenge bobongisi ena ekoselama mpe lolenge kani ekosalema, bosilisi mibeko miye mikotala mikopesa ndingisa na buku ya mibeko ya zamba mpo ete miango mina mikosalema, kopesa mateya na bato ya mbulamatari baye batali makambo ya bobateli zamba mpo ya bozui mayele ba bobateli mpe kopesa etumbu na baye bakobuka mibeko na esaleli na bango mabe o kati ya zamba. Eteni ya mitano: « Misala o zamba ya bayi mboka » . eteni ekopesa ndingisa o mibeko mitali zamba ekokisama na maye matali mibeko miye mipesamaki o bakati zamba, na botalaka biye biloko babongisi mpo bayi mboka, bolandi lolenge ya bofuti likabo ya mpako o mbulamatari ya bituka (province) mpe bomeki ndenge mangomba ekosala misala o zamba. Ekotala mpe meko ya kosunga makanisi ya misala ya baye bafandi kati ya zamba lokola ba pygmées. Eteni ya motoba: « Ezingelo ». eteni iye etali lisungi ekoki kopesame mpo ya bobongisi mibeko mitali ezingelo, bolandeli botamboli manaka ya mwango PNFOCO (lokola mbongwana ya GEEC), bokeli lolenge ya bosali misala na zamba oyobolandi ndenge ya bokangi karnone (ntombwana ya lolenge ya peto, botiki bokati mpe to bosilisi zamba. PNFoCo ekosala misala engebene na bonene ya mboka mobimba mpe ekotia mosolo na misala ya bobateli mpe kosala misala o zamba, lokola misala o zamba mpo ya bayike mboka mpe mangomba, mpe ekolisa makoki ya binama ya boyangeli, ya kokengele mpe ya kobatela zamba mpe ezingelo mingi mpenza na bituka ezali na zamba lokola Bandundu, Equateur mpe Orientale. Manaka ya ekolo Zamba mpe Bobateli (PNFoCo) ekani kobongisa bokonzami ya zamba na Répibliki Démokratiki ya Kongo lelo. Manaka yango ezali kozwa masalisi ya mbongo euti epai na epai lokola na IDA, na GEP mpe na mosolo ya badefisi mosusu mpe ya bikolo mosusu ya Union Européenne, ndakisa Allemagne, Angleterre, Belgique, France, Luxembourg, b.n.b. mpe badefisi Page 4 4 mosolo mosusu oyo bazali kosunga myango manaka etali makambo ya zamba, ndakisa Allemagne, Etats- Unis ya Amérique. Mibeko ya zamba bazali kosaleli lelo mpe oyo etali makambo nyonso ya boyangeli zamba esalemaki na mobu 2002. Nkokande, magelema ya bosaleli mibeko oyo endimami nainu te, ekondimama ntango ya bosaleli mwango. Mobeko moko etali bobateli lizalisimi mpe mobeko etali ezingelo ezali pene na kondimama. Mobeko oyo ya suka, ntango ekondimama, ekolandema na dekele moko etali boyekoli ezingelo. Na bisaleli oyo leta ekokoka na bolembu kotombola mpe kobimisa na mayele bomengo ya lizalisami na yango ebele mpe makele to mabanga ya ntalo. PNFoCo ekosunga nzela oyo na bosalelaka bisaleli oyo ya sika mingi mpenza na maye matali boyangeli zamba mpe bobobateli yango. NDENGE YA LISUNGI NA YANGO Misala minene ya PNFOCO ezali kosunga nzela ekoloingisa kobongisa boyangeli zamba mpe bobateli yango, kotala misala inso ya badefisi mosolo mpe oyo etali zamba mpe bobateli yango kati ya ekolo, kokeba na bomoko oyo ekolingisa kopesa mbuma malamu mpe kosunga boyangeli mpe bokengeli zamba mpo na kobongisa yango. Ndenge ya lisungi yango ekosalema na nzela ya baagence ya misala bobengi maîtrisa d’ouvrage déleguée (MOD) na boyokani oyo ekosala na mangomba ya ekolo to na mokili. Mangomba yango, soki esengeli, ekosinye kontra na bato to kompani mpo na kosala misala. Mosolo to bize ya PNFoCo pene na miliyo 250 ya dollar ya Amerika, nzokande IDA mpe badefisi mosolo mosusu bakani kopesa na miliyo tuku sambo ya dollars ya Amerika. Kasi na botalaka bonene ya misala, mosolo mwango mokoki kobuta. BOYANGELI BWA EZINGELO Mokumba ya boyangeli ya ezingelo ezali ya mbulamatari ya ekolo oyo akoluka kozwa mosolo na nzela ya boyokani. Mosala ya PNFOCO ezali kokeba basalela masengisi ya ezingelo mpe ya bolamu ya bato, masengisi oyo elimbolami awa. CGES oyo epesi nzela minene oyo PNFOCO esengeli kolanda. CGES elimboli mikumba ya bato na bato na bosaleli meko ndenge na ndenge mpe misala oyo ekobatela ezingelo mpe bolamu ya bato. Ekani mpe mpe mposa ya kotala mpe ya kolandela mpe elimboli ngonga ebongi mpo na kosala yango. CGES elengeli kolekisa masengisi na ye mosusu etali ezingelo mpe bolamu ya bato na nzela ya contra na ba MOD oyo ekoki mpe kolekisa ndambo ya masengesi na yango na bosalisi na yango. MOD esengeli kozala na kati na yango na nganga mayele moko ya ezingelo mpe na nganga mayele moko ya na zebi ya boalamu ya bato (sciences sociales) mpo na kosalela masengisi na yango. PNFOCO ekokeba te na bitape nyonso ya mosala ya manaka ezwama makambo etali ezingelo mpe basali ya mangomba (MOD mpe basalisi na yango) oyo bakosala mosala bazali na mayele elongobani. Banganga mayele ya PNFOCO bakokeba ete makambo matali boyangeli oyo ebongisami awa ekoka kosalema. Lokola makambo etali bolamu ya bato na manaka oyo ezali na ntina monene, ezali ntango bakobongisa Ministele ya Ezingelo Bobateli lizalisami mpe matamboli (Ministère de Page 5 5 l’environnement conservation de la nature et tourisme (MECN-T)) lokola mpe ntango bakotya biteni misusu, esengeli kozwa mitindo ekoki kolingisa bato bazala malamu mpe kotala makambo malamu eleko ya kobongisa myango. Na yango nzela sikisiki elengelami mpo na kosalisa ‘te nyonso eleki malamu: - Nzela ya koyangela lisango ya ntoki; - Nzela ya kolongola bato ntango na bolingi na bango; - Nzela ya kosala misala; - Nzela mpo na litomba ya bankoto mboka CGES eyebisi polele nzela ya ezingelo mpe elimboli yango bitape ne bitape na bosangisaka masengisi ya mboka oyo ezali mpe oyo ya politiki ya misala. Nzela mobimba elimbolami kobanda bokaboli na yango tii bolengeli bilan ya ezingelo, bitape ezali: - bokaboli biteni mpe bondimi yango; - boponi nganga mayele (consultant) oyo akosala EIE / PGE soki ekoki ; - bondimi ya EIE / PGE oyo esalemi ; - bakotisi meko etali ezingelo na DAO mpe/ton a kontra ya mosala ya kosala - bokengeli mpe bolandeli misala ya ezingelo - bilan mwango etali ezingelo. Soki tolongoli meko ya sikisiki etali misala oyo EES eponi, nzela minene ekolingisa kosalela yango ezali: - kokotisa na batambolisi ya mwango banganga – mayele misato mpo na kosunga na boyangeli ezingelo mpe bolamu ya bato : · nganga mayele na boyekoli ezingelo · nganga mayele na ekonomi · nganga mayele na bokolisi mayele - boyebisi bazui mikano makambo etali ezingelo ya PNFoCo; - lisengisi ya kokotisa bakonzi ya ezingelo oyo PNFoCo epesi mateya na Eteni moko; moko oyo ekosala mosala na mbongo ya mwango; - boteyi bakambi ya basalisi mpo basalela CGES - bosaleli EIES / PGES mpo na myango oyo ekoki kobota mbuma kitoko; - bosaleli EES mpo na maye etali mibeko ekobimisama na lisalisi ya mwango oyo. BOSALELI BOYANGELI EZINGELO MPE BOLAMU YA BATO Lokola bayekoli ezali EES kasi EIES te, mitindo esengeli kotala mpenza ndenge ya kosala mpe esengeli kokeba na yango ntango ya bolengeli misala ya manaka. Na yango basengeli kozongela mitondo yango, kobongisa yango mpe kokotisa yango na nzela ya bolengeli / bosukisi biteni mike mike ya myango ya PNFoCo. Soki basali yango te na etape oyo ya bolengeli, mitindo pene nyonso ya EES ekotyama mpembeni . Esengeli makasi na coordination ya PNFoCo, na MECN-T mpe na badefisi mbongo ndenge na ndenge bayeba nini ezali na lapolo ya boyekoli mpe baluka kokotisa mitondo yango na ntango ya botomboli manaka. Mosolo mpo na bokokisi bosenga ya CGES ekokende mingi penza na bopalanganisi mpe bolendisi makoki, na lisalisi ye tekiniki, na boyekoli makambo ya ezingelo ya siki siki mpe na bofuti misala ya banganga mayele misato bakotala soki meko ndenge na ndenge oyo elimbolami awa esalemi. Biteni Mokambi Mosolo Bilaka Boyekoli ya banganga mayele ya CCP Molakisi 000 Na ebandeli ya manaka Boyebisi mpe boteyi bakambi ya MECN - T makambo etali bobongisi Malakisi na banganga mayele 40.000 Na ebandela ya manaka mpe kosala yango na Page 6 6 ezingelo ya PNFOCO Bolendisi bakambi mpe bayangeli basungi (MOD) ya PNFOCO mosungi nyonso ya sika Boteyi bakonzi ya ezingeli ya basungi (baye bakozwa mateya masengeli mpe kofuta mwa mosolo Nganga mayele ya ezingelo ya PNFOCO 40.000 Yoko mbala n ambula ya yambo ya manaka Lisalisi ya bikolo mosusu na CCP na boyangeli ezingelo mpo na sanza misato n ambula tii mbula mitano Nganga mayele 400.000 Na ntango ya makasi ya manaka ndakisa na ebandela Boyekoli mosusu ya siki siki Nganga mayele 100.000 Ntango ya bolengeli misala misusu Lifuta mpe mbongo ya kotambwisa mosala ya banganga mayele misato n ambula mitano Mokonzi ya PNFOCO 1.100.000 Ntango inso ya manaka 250.000 dollars mpo na kosomba biloko mbula mobimba oyo ekosalisa CGES esalema mpe mpo na makambo mosusu Mokonzi ya PNFOCO 1.250.000 Ntango mposa ezali Total 3.880.000 Revoir le calcul Mikanda mosusu oyo ekolingisa kobongisa mpe kolengele misala ya PNFOCO mpo été ekokomama na politiki ndenge na ndenge ya boboteli elengelami : mokanda moko moko ezali na bize. Nzela ya politiki Bize ekanami mpo na mosala Nzela ya politiki ya bolongoli bato 1.200.000 USD Nzela ya mosala 6.350.000 USD Nzela ya boyangeli lisango ya ntoki Kozwa makambo elengelami mpo na biloko ya mbula mobimba ya CGES mpe makambo mosusu Nzela ya politiki mpo na bankolo mabele 5.100.000 USD Page 7 7 Boyekoli etali bondongbani ya bolamu ya bato mpe ya ezingelo (EISE) euti na mosolo ya badefisi mbongo mpe na likabo ya IDA na nzela ya manaka ya ekolo zamba mpe bobateli lizalisami (PNFOCO). (CGPC). Septembre 2008 Agreco Page 8 8 Likwe ya mosala – CGPC Nkita ya Congo ebatelami kaka na mokanda kasi na bozindo penza te. Motango ya nkita ena ebongisama uta mobu tuku mitano, kasi naino etangama lisusu ten a mikolo miye. Bisika nkita yango ebombami eyebani lisusu te mpe lolenge ezali sik’awa eyebani penza malamu te. Solo bisika misala ya PNFOCO mikosalema ezali na nkita ebele ya kala miye miyebani mpe miye naino miyebani te. Kasi koloba ete misala mia PNFOCO misalema pembeni ya bisika to nkita ena ezali moke penza. Mokanda moye molengeli nkita ena nde elimboli lolenge kani misala mina mikosalema soki nkita ena ezali pembeni to na nse ya kilometele moko Na ntango ena, moto oyo akoponama mpo na kosala misala mina, yambo ya kobanda misala mina nde alimboli lolenge kani akolengela misala miango mpo ete mbeba ezali te ete atika nkita ena na lolenge ezalaki yambo asala misala. Soki lioko ya misala ekosalema pembeni ya kilometele moko ya nkita, PNFOCO ekoki koboya kosangisa maboko mpo ete mosala ena esalema soki te akosenga na moto oyo aponamaki mpo na kosala mosala ena koluka nganga mayele oyo ayekola nkita ya lolenge ena kotala yango. Nganga mayele oyo nde alakisi lolenge kani nkita ena ekobatelama. Ye nde alimboli lolenge ya kosala mpe kobatela nkita ena. CGPC elimboli na sembo inso biteni biye bisengeli kosalisa mpo ya bobateli nkita ya kala nzela ya boyekoli motuya mia yango Ndambo ya ndako ya misala mpe bato ya bwanya na mboka Congo elimbolami na mokando moye. Page 9 9 BOYEKOLI ETALI BONDONGBANI YA BOLAMU YA BATO MPE YA EZINGELO (eise) EUTI NA MOSOLO YA BADEFISI MBONGO MPE NA LIKABO YA IDA NA NZELA YA MANAKA YA EOKLO ZAMBA MPE BOBATELI LIZALISIMU.(PNFOCO) NZELA YA BOLONGOLI BATO NA BOLINGI NA BANGO TE (CPR) Version finale Septiembre 2008-12-09 Agreco Page 10 10 BOKUSE CPR Likwe ya mosala – Nzela ya politiki ya kolongola bato na bolingi na bango te. PNFoCo ezali manaka ekolingisa leta ya Kongo emipesa makoki ya kosala mpe kosalela politiki etali zamba mpe kobatela bomengo ya lizalisami (ressources naturelles). Na bolai ya mbula mitano, manaka yango ezali na biteni motoba. Mikanda elimboli yango boye: 1) Eteni ya yambo: « Bolendisi bisaleli to mibeko » (mingi mpenza bolendisi Ministele ya Ezingelo, Bobateli lizalisami mpe Matamboli) (Ministère de la conservation de la nature et du tourisme mpe ICCN); Eteni iye etali makambo ya boyangeli basali ya ministele mpe ya ICCN mpe botongi ndako ya misala. 2) Eteni ya mibale: « Masungi » , Bokaboli misala mpe bopalanganyi mibeko mpe magelema mingi mpenza mibeko etali zamba. Eteni oyo etali mpe bokaboli milyoni 10 hectares na zomi ya bomeki manaka na bituka misato oyo: Bandundu, Equateur mpe Orientale. Ekani mpe kosukisa bobongoli mikanda ya kalan a oyo ya sika. 3) Eteni ya misato: « Bobateli lizalisami »: Bokengeli mpe bokeli bitando ebatelami ya sika. Elengelami mpe kobakisa bitando milyoni hectares ya bitando ebatelema mpo na kolingisa kozwa 15 % ya etando ya ekolo ebatelami ndenge mibeko ya zamba elobi. 4) Eteni ya miney: Bokengeli mpe bobongisi zamba ya nkita : Eteni oyo ekolengele myango ya kobongisa zamba mpe kosalisa yango, kosukisa kokela mibeko, kokela boyangeli ya zamba ebongi, kokengele mpe kopesa bitumbu na baye bakobuka mibeko etali zamba. 5) Eteni ya mitano: « Misala ya zamba ya mboka »: Eteni oyo etali bosaleli mibeko etali bisaleli oyo mboka ekosalela mpo na kobimisa nkita ya zamba, bolandeli bosaleli mbano oyo bituka ekozwa, bakisa mpe bomeki ndenge mangomba ekobimisa nkita ya bato ya mboka Lokola ya batwa. 6) Eteni ya motoba: « Ezingelo (Environnement) »: Eteni oyo ekotala lisungi bakoki kopesa mpo na kosala mibeko etali ezingelo, bolandeli manaka ndenge ezali kotambola (Lokola mbongwana ya GEEC), bokeli nzela ya kobimisa bomengo ya zamba oyo ekoumela mpe ekolingisa kokanga karbone (ntombwana ya ndenge, bokimi bosilisi zamba). PNFOCO ekosala mosala kati ya ekolo mpe mosolo na yango mpo na misala etali bobateli zamba mpe bobimisi bomengo na yango, ndakisa na zamba ya mboka mpe ya mangomba, mpe bolendisi makoki ya binama ya boyangeli, ya bokengeli mpe ya bobateli zamba mpe ezingelo ekokende liboso mpenza na bituka oriental, Bandundu mpe Equateur. Manaka ya ekolo mpo na bobateli zamba ekani kobongisa ezalela ya boyangeli zamba na Republiki Demokratiki ya Kongo. Manaka yango ekozwa masalisi ya badefisi mbongo ebele lokola IDA, GEF mpe badefisi mbongo Ya bikolo mosusu, lokola ua Union Eurpéenne, Allemagne, Angleterre, Belgique, France, Luxembourg, mpe badefisi mosolo mosusu oyo bazali kosunga myango, manaka etali makambo ya zamba, ndakisa Alemagne, Etats-Unis ya Amerika. Mibeko ya zamba bazali kosalela lelo mpe oyo etali makambo nyonso ya boyangeli zamba esalemaki na mobu 2002. Nzokande, magelema ya bosaleli mibeko oyo endimami nyonso te mpe nyonso ekondimama ntango ya bosaleli mwango. Mobeko moko etali bobateli lizalisami mpe mobeko etali ezingelo ezali pene na kondimama. Mobeko oyo ya suka ekolandema na dekele moko etali boyebi nini ebongi mpe ebongi te na ezingelo. Na bisaleli oyo leta ekokoka na bolembu kotombola mpe kobimisa na mayele bomengo ya lizalisami na yango ebele mpe makele to mabanga ya ntalo. PNFOCO ekosunga nzela oyo na bosalelaka bisaleli oyo ya sika mingi mpenza na maye matali boyangeli zamba mpe bobateli yango. PNFOCO ekosalela meko nyonso na banque Mondiale mpe mingi mpenza meko ya mosala (OP) 4.12 etali bolongoli bato na bolingi na bango te. Page 11 11 Eteni moko moko ekoki kosenga lifuta na mosolo ton a biloko bato oyo banyokwami mpo na manaka oyo, nzambi babungisi nyonso to ndambo ya biloko to ya makoki ma bango ya kosalela bomengo bwa lizalisami ndakisa: a) Bolendisi bisaleli lokola botongi ndako oyo ekoki kolingisa kotinda bato bisika eyebani; b) Boteki bitando ebatelemi oyo ekoki kosukisa bato ya mpembeni bazwa bomengo ya zamba; c) Bobimisi nkita ya zamba, oyo myango ya bobongisi misala yango ekotia mpembeni misala ya bilanga nzinga nzinga ya zamba wana. Ezali mpe bongo na bomeki nyonso mpe na makambo oyo biteni ya mitano mpe ya motoba elengeli. Lapolo ezali kokakola mpe komekisa mibeko etali ndenge ya kotinda bato epai mosusu mpe ya kofuta bango lokola elengelami na OP4.12 mpe na mibeko ya Kongo. Lapolo ezali kolakisa te OP 4.12 oyo bakosalela na suka ya manaka, ezali malamu koleka mibeko ya Kongo ata soki ezali kopengola yango te. Ndakisa: OP4.12 elengeli kofuta makoki ya bosaleli ya bato banyokwami ezala eyebani na mobeko to te, oyo ya Kongo elengeli te. Ezali kolimbola polele makambo PNFoCo mpe basalisi na yango (ICCN, ONG, bayi- zamba…) ekoki kosala mpo na koyeba mpe kobongisa mabe bato wana bazwi makambo nyonso wana esengelikosangisa bato nyonso mpe kosalema na polele, na etape moko moko basengeli kokeba, te bato nyonso bazali na litomba bazala lisanga na kati ya komite ya bofandisi bato ndenge nyonso, ya bofandisi bato esengi.. Mwango elimboli ndenge basengeli kosalela myango ya bofandisi bato mikolo ekoya. Lapolo ekebisi’ te meko ekoki kosalelama mpenza mpo na kokima na ndenge ekoki bolongoli bato mpe kokutola bobungisi makoki ya kosala. Nzela moko ezali kobongisa makoki ya kosalela mpe ndenge ya kofuta, soki ekoki. Na botalaka makambo ebele ya manaka oyo, bato bazali na litomba ebele mpe bitando monene, mbeba nyonso ekouta na bofandisi bato ekoki kosenga mosolo ebele oyo ekozala mpasi mpo na kozwa yango mpe ekobebisa misala oyo manaka elengeli. Lapolo ezali kotala, engebene na mobeko, ndakisa oyo elimbolami na mibeko ya zamba, makambo nini ekoki koya na bokeli bitando ebatelami mpe na bobimisi bomengo ya zamba na nzela ya bizini. Makambo yango etali mpenza ndenge mibale ya bato oyo bakoki konyokwama : basali bilanga mpe bato ya mboka ya mpembeni mpe bato babimisaka makele to mabanga ya talo na maboko. - Mobeko etii mpembeni te misala ya bato na zamba oyo ebatelami, mobeko ekoyangela zamba wana mpo na kobatela yango ekola. Yango ezali kopesa nzela ya kobatela yango na bokeli bitando ebatelami mpo bato batikala esika moko mpe koluka elongo na bato oyo ndenge ebongi mpe ndenge oyo ekoumela mpo na kosalela bomengo ntango na bolongoli bato. Na likanisi wana ya etando ebatelami esika ya botii kimya ezali lisusu na ntina te. Motuna ya boumeli etunami. Manaka ya bobongisi bisika ezali nzela ya mobeko ya bolengeli misala ya bato nyonso. - Mobeko etii mpembeni se ndenge ya mosala moko ya zamba ekobimisa mbuma : mosala ya bilanga. Ezali likambo monene mpe ekoki kobenda makambo ebele etali bofandi ya bato. Yango wana lapolo elengeli meko misato mosusu : 1. bondimi mposa ya libota moko moko etali mabele mpo na bilanga 2. libota moko moko esengeli lelo na ha 10 mpe na ha 20 mpo na bana bakoya sima 3. bokaboli misala minene yamba ya koluka kotekisa zamba. 4. bozwi mokumba ya bofandisi bato na baye bazali kosalela zamba sik’oyo lokola mpe na baye bakosomba yango na mikolo ezali koya. Lapolo ezali kokebisa makambo mosusu lokola bobimisi makele to mabanga ya ntalo kati ya bitando ebatelami lokola na kati ya zamba oyo ezingami. Page 12 12 Lapolo ezali kolakisa te bato bazali pene na 100.000 na bituka misato ya bomeki oyo eyebani mpe mingi mpenza na zamba wapi bazali kobimisa nzete to na zamba oyo ebongisami mpo na kobimisa nzete, na bitando ebatelami motango mpe na bitando oyo bazali kobongisa kobatela. Bokoli ya Molango ya bato wana euti na bokiti ya mosala ya bilanga.Ebongi te kolongola bato yango mpe kopekisa bango kotimola makele to mabanga ya ntalo na maboko, kutu mosala oyo epekisami te na oyo ya bobimisi nzete na zamba. Lapolo ezali kolakisa ‘te na mibeko ya Kongo, bakoki kopesa makoki ekeseni te mpo na koyangela to kolingisa kosalela zamba na etando moko. Ezali koyebisa ‘te esengeli koyekola likambo yango ya mobeko mpo na komona polele, kotala malamu elongo na baye bazali kosala mosala yango ndenge bazali kofanda sikoyo esika moko, ndenge nini bayangelami mpe ndenge ya kobongisa mibeko mpo’te ekokana na mposa ya kofanda lisanga. Boyekoli yango ekotala mpe likambo ya kofanda esika moko na bitando ebatelami na ndenge ya sika. Ata soki nzela efungwami mpo na kokima bolongoli bato mpe bofuti mbongo to biloko ebungi, lapolo ezali kokeba na makambo ekoki koya mpo na kosalisa leta mpe misala misusu nao yo yango elengeli. Mpo na batimoli mabele to mabanga ya ntalo, etii bokeseni kati ya baye bazali na mokanda ya kobimisa yango mpe baye bazangi yango. Etii mpe mpembeni bato bakimi bitumba. Zambi likambo ya bato bakimi bitumba ezali mosala ya PNFoCo te mpe ezali na makoki mpo na yango te. Mpo na kozala na makoki ekoki kosalisa yango ntango ya kpokoso, etii mpembeni dollars 500.000 mpo na bitando ebatelami mpe lisusu dollars 500.000 mpo na zamba ezingami. Elengeli dollars 50.000 mpo na kotonga ndako ya mosala. Mosolo nyonso to bize ya CPR oyo ezali ya dollars 1.200.000 Bosaleli CPR, boyangeli myango ya bofandisi bato, boyekoli bokokani ya mibeko ezali mosala ya Coordination ya manaka mingi mpenza ya nganga mayele na yango oyo azali moto ayekoli makambo ya nkita(économiste). Page 13 13 BOYEKOLI ETALI BONDONGBANI YA BOLAMU YA BATO MPE YA EZINGELO (eise) EUTI NA MOSOLO YA BADEFISI MBONGO MPE NA LIKABO YA IDA NA NZELA YA MANAKA YA EOKLO ZAMBA MPE BOBATELI LIZALISIMU.(PNFOCO) NZELA MPO NA LITOMBA YA BANKOLO MBOKA (CPPA) Version finale Septiembre 2008-12-09 Agreco Page 14 14 Likwe ya mosala - CPPA PNFOCO ezali manaka ekolingisa leta ya Kongo emipesa makoki ya kosala mpe kosalela politiki etali zamba mpe kobatela bomengo ya lizalisimu. Na bolayi ya mbula mitanu, manaka yango ezali na biteni motoba : Eteni ya yambo : « Bolendisi bisaleli to mibeko » , (mingi mpenza bolendisi Ministele ya Ezingelo, Bobateli lizalisami mpe matamboli na ICCN). Eteni iye itali makambo ya boyangeli basali ya mbulamatari ya ekolo mpe botongi ndako ya misala. Eteni ya mibale « Masungi » Bokaboli misala mpe bopalanganyi mibeko mpe magelema, mingi penza mibeko mitali zamba. Eteni oyo etali mpe bokaboli milioni zomi ya ba hectares na zoni ya bomeki manaka na bituka misato oyo : Bandundu, Equateur mpe orientale. Ekani mpe kosukisa bobongoli mikanda ya kala na miye mya sika. Eteni ya 3 : « Bobateli lizalisami » (Conservation de la Nature) Bobateli mpe bokeli bitando bibatelami ya sika elengelami mpe bobakisa milioni 15 ya ha ya bitando ebatelami mpo na kolingisa kozwa 15 % ya etando ya ekolo ebatelami ndenge mibeko ya zamba esengi. Eteni ya miney: « Bokengeli mpe bobongisi zamba ya nkita » .Eteni iye ekani kosala myango ya kobongisa zamba mpe kotala lolenge misala mikosalema, kosilisa kokela mibeko miye mikolakisa lolenge mibeko mia zamba mikosalema, kokela bayangeli baye bakozwa makoki ya bosungi. kokengele mpe kopesa bitumbu na baye bakobuka mobeko etali zamba. Eteni ya 5: « Misala ya zamba ya mboka mpe ya lisanga » . Eteni iye etali bosaleli mibeko etali bisaleli oyo mboka ekosalela mbano oyo bituka ekozwa, bakisa mpe bomeki ndenge mangomba ekobimisa nkita ya zamba. Ekotala mpe meko ya kosunga makanisi ya nkita ya bato ya mboka, lokola ya batwa. Eteni ya 6: « Ezingelo »: Eteni oyo ekotala lisungi liye likopesama mpo na kosala mibeko etali ezingelo, bolandeli manaka ya PNFOCO (lokola mbongwana ya GEEC) bolakisi lolenge lisusu ya bosali misala o zamba na ntina ete karbone ekangeme (ntombwana ya ndenge ya peto, boboyi kokata zamba na mobulu…) Na boyangelami ya Ministele ya Ezingelo, bobateli lizalisimi mpe Matamboli, PNFOCO ekozwa makabo ebele, na molango moye na liboso makabo ya IDA, ya GEF (mpo na Garamba mpe Virunga), ya Union Européenne mpe badefisi mosolo ebele. Biteni binso bya mwango bikobongolisa makambo mbala moko ton a sima mikolo na bayi zamba (lokola batwa). Na bolandaka nzela ya politiki ya esaleli 4.10 ya Banque Mondiale, CPPA iye, elingi kondima ete na suka ya misala ya PNFOCO, bato baye bafandi o zamba na mboka Congo, lokola batwa,mbuti to masanga misusu bakoma na kokoso koleka oyo bazalaki na yango liboso ya bobandi misala mina. Babola o kati ya babola, mibeko ya Congo mizali kopesa bato baye bafandi o zamba makoki ya kosalela bomengo ya lizalisimi te. Bazali na makoki ya ya kosala misala na mabele te mpe bozwi yango ezali pasi. Mangombo ma bango nde eyebani te na mbulamatari ya ekolo mpo komimonisa lokola bana mboka Congo ezali na kokoso makasi mpo na lolenge la bango ya kopalangana ntango inso o zamba. 1 Liloba Batswa ezali kolimbola ndenge ya bato ebele lokola Bambote, Bambuti mpe b.n.b. Page 15 15 Boluki kopesa motuya na makoki ma bango ya bosembo ezali moke. Bozwi ya bango bozali moke mpe bomoi bwa bango (mai ya peto, bozwi lisalisi ya minganga, boyekoli) ezali mabe koleka ya bato banso basusu. Mpo ete ntoki to bonkoko bwa bango bobunga te, bato oyo basengeli na meko ya sikisiki oyo ekopesa bango nzela ya komikotisa na bonsomi mpe lokumu na lisanga ya bana Congo; yango ezali mposa na bango ya makasi mpo na kokonza ntoki na bango mpe na bobombaka ezaleli ya bango. Mpo na yango CPPA ekani kozwa meko ebongi mpo etni moko moko ya PNFOCO na lisalisi ya meko 4.10 likwe ya meko yango ezali: - Koyebisa bato banso bazali na bizingelo ba bango bakeba na matomba ya bankolo mabele (P) mpo bazali babola koleka bato basusu mpe ntoki na bango ezali sikisiki. Mpe esengeli kobatelama: - Kopesa PA makoki ya kozala na esika ya komibongisa mpe ya koyeba kosombitinya mpe kobomba maye na ntoki na bango esengeli kobatelama, - koluka’te mangomba ya PA ezala bisika nyonso ya bosali, bokomisi bato, bobongisi, bozwi mikano,bobimisi mbuma, botali mpe bolandeli misala, bokaboli mbano to bobateli bomengo ya lizalisami. Yango etali mpe bosali mibeko mpe magelema, bokaboli misala, bosali mpe bosaleli mikano, bozongiseli to bofuti bato biloko babungisaki mpe bolongoli bango esika bazalaki mpe boyebisi bango oyo esengeli kosala mpo manso matambola malamu. - Kokeba ‘te makoki ya bosaleli bomengo ya lizalisami ya batwa ekobatelama to mpe bakozwa mbano ekoki na bango oyo ekolingisa bango kozala na bilei ekoki mpe na bomoi malamu. - Kokeba ‘te basalela mabele na bango zambi basengeli na yango mpo bazala na bomoi. CPPA oyo ekotinda meko nyonso mpe mosolo ya manaka oyo na mwango moko moko ya misala oyo PNFoCo esengi. Nzokande, ekoki mpe kokana kozwa meko ya lombango ya kolendisa makoki oyo mosolo na yango ezali na lapolo oyo. Meko yango ezali mpo na kopesa na masanga matali batwa makoki ya: 1. kolendisa bayangeli mpe bakonzi(oyo baponami); 2. koyeba masanga ya batwa esengeli 3. kobongisa PA mpo na ekota na masolo mpe ebundela matomba na bango oyo PNFoCo ebongisi 4. kozala bisika bazali koluka kobongisa mibeko, meko mpe mogelema ya kosalela makambo etali boyangeli bomengo ya lizalisami (ressources naturelles) Likolo ya meko oyo etali bato nyonso, CPPA elengeli komeka na bisika mibale mwango oyo myango nyonso ekolanda mpo na maye matali boyangeli mpe bobongisi bomoi ya bato. Mosolo esengeli mpo’te misala yango etambola malamu ezali pene na dollars 5.100.000. Page 16 16 BOYEKOLI ETALI BONDONGBANI YA BOLAMU YA BATO MPE YA EZINGELO (eise) EUTI NA MOSOLO YA BADEFISI MBONGO MPE NA LIKABO YA IDA NA NZELA YA MANAKA YA EOKLO ZAMBA MPE BOBATELI LIZALISIMU.(PNFOCO) NZELA YA MOSALA (CF) Version finale Septiembre 2008 Agreco Page 17 17 Likwe ya mosala – Nzela ya mosala (CF) Mwango ya ekolo mpo na zamba mpe bobateli lizalisimi (PNFOCO) ezali na likanisi ya kosunga na mboka RDC: - Bofandisi liboke ya mibeko, bokeli misala mpe boponi bato baye bakoki kozala na makoki ya bosungi mboka mpo ya bofandisi mpe bosaleli polititiki ya ezingelo, ya zamba mpe ya bobateli ya lizalisimi engebene na makoki na yango etali nkita ya lizalisimi; - Bosaleli mibeko mya zamba mpe meko mya yango, na bokuse bosaleli mageleme ya zamba; - Botomboli bitando ebatelemi oyo ezali mpe bokolisi biango na bokomaka na ha 15.000.000; - Bobongisi lolenge mosusu ya kosalela nkita ya lizalisimi oyo ekobatela mibu ebele ezingelo (bokangi karbone). Mwango oyo ekozwa mosolo epai ya badefisi mbongo ebele, ndakisa Banque Mondiale oyo PNFOCO ekosalela nzela na yango na maye matali ezingelo mpe bato lokola. Nzela ya mosala elobami na mokanda oyo etali meko esengeli kozwama mpo na bolamu bwa bato mbala nyonso mwango moko ya PNFOCO ezali kokitisa makoki ya kosalela nkita ya lizalisimi ya bato yango. Etali mpenza makambo mibale: - Bobimisi nkita ya zamba (makambo ebongolami mpe oyo ebongolami te, mikanda ezwami na nzela ya mibeko ya bokonzi (adjudication); - Bokeli bitando ebatelami to bobongisi mpe bolendisi btando bizali. Nzela ya mosala ekeseni na nzela ya bolongoli bato mpo ete bolongoli bato etali bato ebele (bato bafandi nzinga nzinga, bakolo mabele to bato bayei koya) oyo bazali na bisika bina mpe bazali kosalela nkita yango. Ekozala mpasi mingi mpe ekosenga mbongo mingi mpo na kofuta bato wana biloko nyonso bakoki kobungisa likolo ya mwango wana Na yango nzela ya mosala ekoluka kosolola na bato oyo bazwami kati ya makambo yango uta ebandela ya mwango mpo na koluka nzela ekolingisa kokukola bokoti na RN. Boluki nzela ebongo mpe ekowumela ekokani solo na ntina ete bato, bazali komono te mokolo na mokolo ete bilanga biye bikoki kobimisa nkita ebele bikomi mosika na mboka, nyama to mbisi ezali kobunga to kokima mosika na mboka. Na ntina ya bokeli bitando ebatelami ya sika mpe biye bikelama uta kala, ekosenga bovandisi lingomba ya masolo bato banso mpo na komeka mpe kokela ndenge ya kosala mosala o ezingelo na ndenge ya kobebisa te. Mpo ete makambo esalema na matata mingi te, biteni ya bitando ya kokela ekebami makasi: bobateli bitando mobimba ekopekisa masolo na bato mpe ekoki kokimisa bango mosika. Kasi ICCN ekani koluka kosala bitando ebatelami na ndenge wana te. Nzela ya mosala, sima ya bolakisa litonga ya ekolo (dispositive national) oyo PNFOCO ekani kotia (komite ya botambwisi, komite ya ekolo mpo na kobongisa makambo oyo etongami nab a nganga mayele lokola nganga nkita moko, moyangeli oyo akolandela makambo etali ezingelo mpe nganga mayele moko ya bakolo mabele (cfr CGES) oyo ekozala kolandela nzela ya mosala mpe mwango moko moko, ezali kokundola, te mpo na mwango moko moko, bakokela komite ya boyangeli nkita ya lizalisami. Na kati ya komite yango, tokozwa makambo nyonso ezali na litomba likolo ya mwyango. Na yango, mangomba wana ekolakisa mpenza lisanga ya masolo. Masanga yango, na lisungi ya boyekoli ya nkita ya siki siki, ekolimbola pula ya mosala mpo na bokutoli bokiti na nkita, PARAR, oyoetali mingi mpenza boluki nzela bazali kolanda mpo na bosaleli RN. Nzela yango etali botayi, bolbi, bobuki oyo ezali na eloko moko esangisi yango: kosalela magelema, kotosa mibeko ya bokoti, komeka bokasi, kokengele bosaleli magelema yango. Mpo na bilanga ezali mpe na nzela oyo ekobebisaezingelo mingi te, oyo basengeli kosunga, komeka mpe kopalinginya. Nzokande, nzela ya mosala etieyi loboso nzela oyo ekoki kosepelisa bato nyonso te mpe bolongoli bato epayi na bango ntango na bolingi na bango te, lokola mpe bofuti bango biloko babungisi mpe kopesa bango bileyi; bato batau (na kati ya bato wana tokozwa bakolo mabele), esengeli kozwa bokebi makasi. Ndakisa, bopekisi kosala bilanga na zamba oyo etekama ekosenga kofuta bato bazali wana mpe kolongola bango esika wana. Kasi soki bisika yango ezali na bato mingi te, bato baye bazali kobimisa nkita ya zamba yango nde bakofuta bato wana. Nzela ya mosala ezali kolimbola mpo na Page 18 18 yango nzela ya kolanda mpe maye esengeli kotala. Ezali ndenge moko na oyo ya CPR kasi esengeli kokundola yango awa. Nzela ya mosala ezali mpe kotala makambo lolenge ya bato mibale baye bazali kosalela nkita baye basengeli na bokebi: ba bake mpe baye bakima bitumba. Mpo na bato oyo, soki bazali na bisika makambo ezali ebele mpe soki bazali mingi ebongi koboya kolongola bango wana, soki bandimi kobongisa na bango ndenge ya kofanda mpe ya kosalela nkita ya bizalisami. Kolongola nkoto na nkoto na bana bake to ya bato bakimi bitumba (mbala mosusu bakoki kozala pene koleka koto zomi na bisika moko), ezali na likoki ya PNFOCO te to ya makoki ya makoki na yango te. Mpo na yango, nzela ya mosala esengeli mosolo 6.350.000 ya mosolo ya ekolo ya Amerika mpo na: - Kopesa mosolo soki esengeli makasi na boyekoli nzela ya nkita mpo na kowelisa to kolendisa bobongisi masolo (kati ya komite ya boyangeli, bantoma ya magomba ezali na litomba) ya ntina mpo na kobongisa makambo; - Kosunga boyangeli (ICCN, bato bakobimisaka nkita ya zamba, ONG) na bofuti bato biloko babongisi soki nzela ya malamu ezwami te; - Se ndenge moko mpo na bankolo mabele. Boyekoli etali bondongbani ya bolamu ya bato mpe ya ezingelo (EISE) euti na mosolo ya badefisi mbongo mpe na likabo ya IDA na nzela ya manaka ya ekolo zamba mpe bobateli lizalisami (PNFOCO). Page 19 19 BOYEKOLI ETALI BONDONGBANI YA BOLAMU YA BATO MPE YA EZINGELO (eise) EUTI NA MOSOLO YA BADEFISI MBONGO MPE NA LIKABO YA IDA NA NZELA YA MANAKA YA EOKLO ZAMBA MPE BOBATELI LIZALISIMU.(PNFOCO) BOYEBI MOTUYA YA EZINGELO (EES) Version finale Septembre 2008 AgrecO Page 20 20 Likwe ya mosala – boyebi motuya ya ezingelo (EES) Boyebi motuya ya ezingelo ya PNFOCO ezali mbuma ya likakoli ya ezingelo esalemai na lisalisi ya bato ebele mpe ekambemi nababongisi ya ekolo mpe ya mokili batali makambo ya zamba mpe ya bobateli na boyangelami ya ekipi ya ba nganga mayele. Likakoli ewuti na ezaleli oyo ya motuni alengeli na botalaka mikanda mizali mpe na anketi asala epayi ya babongisi mpe ya bato ya bituka ya bobandi manaka. Bilembo ya likakoli oyo epesami na bokuse na sekisyo mpe elimbolami na bolay na ebakiseli (annexe), emonisi motango monene ya meko ya bolembisi oyo esengeli kotala ntango ya kobongisa mpe kolengele manaka. Likakoli emonisi makambo mazali kotambola na ezalela ya lelo ndenge boye: - Boyangani mabongi ya bitando bibatelema mpe ya biodiversité oyo ezali na kati na yango ekopekisa kosala mwango ya bobateli ya malamu; - Likoki moke ya bato ya mboka bazali nzinga nzinga ya zamba ya koyeba, ya kobundela mpe ya koloba mpo na makoki na bango, ndakisa maye mibeko ya zamba epesi bango; - Biodiversité ezali na likama nzambi ya bonyeti ya bato, ndakisa kobongisa nzela koleka na kompani ya zamba mpe kolekaleka ya bato bazali kokende koluka mosala. Emonisami lisusu te bonyati yango ekokutwama te ata soki kompani etiki misala na yango; - Nkita oyo ezali kowuta na mosala ya bisini to ya maboko na zamba ezali komonana te ; - Mbeba monene ezali na boyangeli bwa bitando wapi bato ebele bazali kosalela etando moko. Ndingisa epesami na bitando bibatelami mpe na zamba oyo ebongisami mpo na bilanga ezali, ndakisa ya makambo wana. Makambo mosusu ya mabe emonanki : EES na bobongoli, bobongisi to bolimboli mayele ya sika ya kosala mpo na PNFOCO, ezali koluka nzela ya kokutola makambo mabe wana mpe kobongisa malamu makambo na ntango ya bobongisi mpe bokokanisi myango, mpo ete makambo ya ntina ezali na lapolo oyo ekoka kosalema, esengeli bakonzi baye bakobongisa manaka mpe myango yango bayeba malamu maye malobami na kati ya boyekoli oyo mpe babongisa ndenge ekoki, mpo ete maye malobami awa. Page 21 21