Page 1 Résumé non technique Version Lingala ETANDO YA BOKEBI YA IMPACT ENVIRONNEMENTAL MPE SOCIAL MPO NA MISALA YA PRO-ROUTES BOSOLOLI NA BAIMBOKA MPO YA MISOLO EKOBASAMA NA PROJET Bokuse bwa masolo Lisapo Mpo ya Banque Mondiale, bozwi misolo mpo ya misala minene miye mizali na molongo mwa A (Volet A) esengeli kolanda mikoloto ya makasi liboso ya kobanda misala lokola, kobongisa Cadre stratégique, kopanza nsango, mpe kosolola na bai mboka bipai binso misala ekosalama. Molongo ya A ezali bongo ya misala minene iye mikoki kobebisa bifandeli bya batu, ba nzete, ban yama to ba mbisi, ba ndeko Batwa to mpe bikeko bisika ya bonkoko. Cadre stratégique ya biloko biye bikoki kobebisa environnement ezali lokasa oyo ezali kotalisa na milongo ya minene, liboke ya maye manso makobebisa bifandeli bya batu, kolengele lolenge kani ya kobongisa biloko biye bibebi, biye bakofuta misolo to mpe maye makoki kotambola elongo na misala lokola (projet) : kotonga biteyelo, ba lopitalo, liziba lya mayi ya komela, mpe bongo na bongo… Lokasa lona (cadre stratégique) ezali kotalisa lolenge kani bakolandela misala ya environnement ntango ya misala (PGES). Mpo na mosala ya Pro-outes, eye ezali kofungola banzela ya litomba linene mpo ya ekolo, misala ezali kolandama na Cellule Infastructures ya Ministère ya ITPR, cadre stratégique endimamaki mpe bapanzaki nsango na yango na 2008, mpo na nzela iye : RN4 (Kisangani, Dulia, Bondo mpe Bunduki na Province Orientale 620 km) ; mpo na nzela ya RN5 (Uvira na Sud Kivu mpe Kasomeno na Katanga 1180 km). Bosengeli koyeba tee, meko inso izwami mpo ya maye matali environnement mpe social ya batu na ntina ya Projet Pro-Routes, izali bongo engebene na poliki ya bobateli ya Banque Mondiale: - OP 4.01 : (boyebi ba nkita inso ya environnement); - OP 4.04 : (maye matali myi, mabele mpe nkita ya nse ya mabele); - OP 4.36 : ( maye matali zamba); - OP 4.11 : ( maye matali makambo ya bonkoko, bikeko mpe mimeseno ya batu); - OP4.12 : (maye matali baye ba ndako to bifandeli na bango bakobuka mpo ete nzela eleka) mpe na - OP 4.10 : ( maye matali botomboli bomoto mpe ezaleli ya ba ndeko Batwa). E2749 v14 Page 2 2 Boyeba lisusu mpe tee, ba nkoma inso itali ba politiki ina izali bongo na site Internet ya Banque mondiale. Na mikolo mya lelo, gouvernement ya ekolo Kongo (RDC) ekozwa misolo misusu (ba komoyikina misolo) na Banque Mondiale mpe na DFID mpo ya kosembola ba nzela iye : - RN 6 na RN 23 : Aketi-Gemena-Mbari-Libenge-Boyabo-Zongo (376 km). - RN 2 : Kamituga (Bukavu)- Kasongo-Lubawo-Kabinda-Mbuji-Mayi (825 km) - RN 26 : Niania-Isiro (216 km) - RN 4 : Kisangani- Beni (bobakisi ebagba ya sika libwa « 9 » mpe misala misusu ya nzela na bolayi ya kilometele nkama sambo na tuku minei na moko) (741 km). Mpo na ba nzela oyo ya sika, cadre stratégique ya maye makosamba makambo ma environnement eklamndama na mobimba nayango na lolenge ya ekolo. Kasi, mpo ya ba nzela ya sika, nsango ya cadre stratégique ekobima mpe ekoyebisama mpe bakolibolela yango batu banso na kati ya ba ateliers mpo ya kozwa makanisi ya batu banso mpe koktisa yango na TDR ya ba études ya kafukafu (détaillées) oyo ekosalema mpo ya kotala eteni yoko yoko ya nzela makambo mpe bosengi na yago nzinga nzinga na projet na bolayi ya kilometele ntuku sambo na mitano, ngambo na ngambo ya nzela. Bolayiya nzela inso bakobakisa ezali ya kilometele nkoto ibale na nkama yoko na ntuku mitano na mwambe (2.158 km). Cadre stratégique ena ekosangisa banganga mayele baye : ba environnementalistes, ba sociologues, ba agro économistes, ba biologistes, ba forestiers mpe baye bakotalaka makambo ya Batwa. Banganga mayele baye baksa,gisana na baye ba Office des Routes, GEEC, ICCN ya Ministère ya Environnemùent. Mikanda mya Cadre stratégique ya Impact environnemental na social ya projet Pro-Routes na maye matali bolandi makambo ma environnement, bofandisi bai-mboka o mboka sika, makambo matali botombwami bwa bomoto ya batwa, mikanda miye mikoki kotangema na site Internet ya Banque Mondiale ( www.worldbank.org/ infoshop - numéro ya projet P 101745) mpe na masolo na batu banso ekobakama na nkasa na sanza ya mitano ya mobu 2010 na ndako ya mosala ya Cellule Infrastrucutres o mboka mokonzi Kinshasa, na ndako ya mosala ya Office des Routes na mboka mokonzi ya ba provinces mpe ya ba Districts eye : · Gemena · Kisangani · Isiro · · Beni · Bukavu · Kasongo · · Mbujimayi · Kindu · Kabinda Na mbisa, mokanda ya mokuse ya masolo maye bakobaka yango na esika ya mosala ya l’Etat na bingumba mpe bituka biye : · Akula, Gemena, Libenge, Mbari, Zongo, mpo na nzela ya motoba mpe ya ntuku ibale na misatu (RN6/RN23) ; Page 3 3 · Bukavu, Kamituga, Kitulu, Kindu, Kasongo, Lubawo, Kabinda, Katanda, Mbuji-Mayi mpo na nzela ya ibale (RN2) ; · Kisangani, Bafwasende, Niania, Epulu, Mambassa, Komanda, Beni mpo na nzela ya minei (RN4) ; · Niania, Wamba, Isiro mpo na nzela ntuku ibale na motoba (RN26). Po na kotambwisa makambo, mbela eko bokwama na nzela ya ba zolonale mpe na ba radio eleko yoko na etando ya ekolo Kongo mobimba mpe o bituka epai wapi misala ya projet ekosalema. Mpo na ekolo mobimba, mbela ekobima na ba zolonale eye : Agence Congolaise de Presse (ACP), La Référence Plus, La Prospérité mpe na Radio Okapi ekobwaka mbela. Nakati ya ba Provinces, ba zolonale ya ba mboka wana mpe ba radio na bango ekobwaka mbela na Mbuji-Mayi, Kindu, Kisangani, Isiro, Beni, Gemena mpe Bukavu. Makita manene to ateliers iye ikolobela makambo ya Pojet ena ekosalema na bingumba biye : Kisangani, Isiro, Beni, Bukavu, Mbuji-Mayi, Kindu mpe na Gemena. Bososoli bwa mokanda mwa bokengeli (Diagnostic ya cadre stratégique) Bososoli mokanda mwa bokengeli ezali boye : 1. Uta eleko ya falama oyo batonga banzela ina, eleki lelo mbula ntuku ibale, misala ya bobongisi yango esalamaka te. Ba nzela ebele oyo ezali kosangisa ba mboka mikonzi ya ba territoires, gbagba na yango ebukana, baki ya kokatisa bibale to miluke mpe ekufa. Bobele ba velos, ba motos na bakumbi mikumba na mokongo bakoma komema biloko bya mombongo to mpe ba nkita ya bilanga na mabanga ya ntalo. 2. Bipai binso misala ya bilanga ebeba, mimbonngo ya kafe ebeba, batu bazali kowela mabele mpo ya misala ya kopasola mabaya, bilanga ezali kosalema kaka na lolenge ya kozikisa ba zamba mpe milona ya malonga ezali te. Baimboka bazali na bozwi ya mingi te, libota lyoko ekoliaka bobele dollars ntuku ibale ne mitanu (25 $) na sanza mobimba. Bomoi bwa batu ezali mawa mingi, ba ndako ya kofanda bobele ne nsese, ba ndaku ya manzanza ezali ya kotanga ; Mpo na makambo matali biteyelo, bobele bana ntuku mitanu kati ya bana nkama yoko (50%) nde bazali kotanga kelasi ; Namaye matali bokolongono bwa nzoto, batu zomi na mitanu kati ya batu nkama yoko (15%) nde bazali na makoki makomisalisa na lopitalo ; Mpe maye matali bitoko to miziba maye babongisi mpo ya komele mayi ma peto, bobele liziba lyoko (1%) kati ya maziba nkama ; Biloko bia ndako bizali mabe, batu bazali kolala na bitoko batandi na mabele, ba nzunbgu mpe biloko ya kolambela makusa ezali te, kiti te, mesa te, mpe tango mosusu batu bazali kosola nzoto mpe bilamba na sabuni ya nkasa ya paipai. Bandako ya l’Etat, to bisika ya masano bizali te, soki bisika biye bizali bibabe makasi. Page 4 4 3. Bipai binso baimboka bazali na elikya enene mpo ya misala ya bobongisi nzela yina, pamba te, ekokolisa misala mya mombongo mpe nkita o bipai bazwami. Kasi bosenga na bango ezali ete ba cantonniers to basali nnzela babanda ntango inso kobongisa nzela. 4. Nabolai bwa nzela inso, kilometele nkoto ibale na nkama yoko na ntuku mitanu na mwambe (2158 Km) ya nzela ya kala ekosunga mpo ya bobongisi banzela minene ya ekolo na biso. 5. Na ba nzela wana, nzela misatu ezali kokatisa bisika biye ba ndeko Batwa bafandaka nzinga nzinga na nzela pene pene na ba kilometele nkama yoko na ntuku mitanu (150 Km).Ezali bongo na nzela minene ntuku mibale na motoba na ntuku mibale na misatu (RN26/RN23) kati ya Libenge na Mbari ; Mpe nzela monene ntuku mibale na motoba RN26 kati ya Niania na Isiro ; mpe na nzela ya monene ya minei (RN4) kati ya Bafwasende na Beni. 6. Bokila mpe mombongo ya nyama ya zamba ezali makasi bipai binso. Bokila na ndobo ezali kosalema na bolandaka mibeko mya mbula matari te, moto moko te azali nalikanisi lya bobateli mbisi na nyama. Bokila ezali kosalema tee na kati ya bisika bipekisami mpe b isika bibatelami na l’Etat mpo na ba nyama lokola nzoku, okapi, makaku manene to chimpanzé, na paon congolais, mpe bongo na bongo… Na bisobe, ban yama kutu ebunga na yango mpe esila na koboma… 7. Bipai binso, misala ya l’Etat ya environnement eye etali bobateli zamba, bibale, ezalaka lisusu te, mpe mibeko ya bobateli nyama na mbisi, mpe ne ba nzete eyebani na baimboka te. Misala ya bokati ba nzete pembeni ya nzela ezali kosalema na alima te, moto mpe akonongo yango azali te, na ba nzete oyo epekisami, bazali kokata yango Misolo mpe nkita oyo ezali kouta na mosala wana ya bokati nzete ezali kozongela baimboka te, misala mpe ezali te, na libenga ya l’Etat, mpaku mpe ezali kofutama te. 8. Soki tozwi monene ya balabala na metele zomi na mibale na ndambu (12.5 m) kobanda kati kati ya nzela, komeka na nzela ya kala nakati ya mboka, na munene ya metele mitanu na ndambu (5.5 m) esika ba ndako ezali, tokomono ete ezali bobele ba ndako ya ndele to nsese. Na yango, mpo ya bolongoli batu pembeni ya nzela, misolo ekozala na nse ya misolo dollars ya ameriki nkoto ntuku mitanu. Mpo na nzela oyo ya kala, bisika ya nkunda mpe bisika ya bonkonko ezali penza mingi te. 9. Ba nzela eye ya kobongisa, mingi na yango ekatisi bisika bya mabanga ma ntalo mingi. Miango mikotambolaka na projet Na bososoli bwa mokanda mwa bokengi, booko miango mizwamaki mpo ya kotambola elongo na misala, mpo ya kosunga to mpe kosunga booko makama to biloko bikoki kobeba na ntago bakosala misala ya nzela : 1. Bureau moko ya banganga mayele mpo na makambo ya Gestion Environnementale et Sociale (BEGES) ekotiama na eleko nyonso ya misala. Ekosala Page 5 5 elongo na basali ba l’Etat mpe na batu ba société civile (mangomba ya bisambo, mpe mangomba ya bobongisi ezalela ya bomoto (ONG de développement). 2. Botambwisi misala ya chantier na bolandaka mikano minso mizwamaka (PGES ya chantier). Miango mina mizali na litomba mpo ya bokengi bwa nzela, bobateli bokolongono bwa nzoto ya basali mpe ya baimboka, kofuta makama nyonso mpe biloko ya batu oyo ekobeba mpe makasi penza, bisika ya nkunda to mpe bisika ya bonkoko, misala na baimboka mpe kotia kimia na kati na bango. 3. Nabokebi penza, kotala makambo ya bandeko Batwa epai wapi misala ya projet ekoleka : kati ya Mbari na Libenge na nzela ya monene ya motoba (RN6) ; Niania na Isiro na nzela ya menene ntuku mibale na motoba (RN26), mpe kati ya Bafwasende na Beni na nzela ya monene ya minei (RN4). Mpo ya bongo, esengeli kosala Plan moko mpo ya botomboli bomoto ya Batwa na lopoto « Plan de Développement des Peuples Autochtones, PDPA) oyo esengeli kozala na makambo maye : · Kosala manso mpo ete, na ntango ya kozwa basali ya chantier, Batwa bazwama lolenge yoko na batu nyonso mpe kokeba mpo nzala ekota omboka ya Batwa te. · Kosunga bandeko Batwa bazwa mabele ya kosala bilanga soki bazangi yango. · Kosunga ba ndeko Batwa mpo ete bango mpe bandimama mpe bamikonza na ba mboka na bango moko mpe bazwa bonsomi. · Kosunga bandeko Batwa mpo bayika na mayele mpe makoki ma bango mpo babatela nkita ya zamba mpe mabele nzela moko na bandeko bantu. · Kosala manso mpo ete bandeko Batwa bakoka kozwa makoki ya komisalisa nzoto na lopitalo mpe kotangisa bana na bango. 4. Kosunga mpe kokolisa mayele ma basali ya l’Etat baye ba Environnement (Coordination Provinciale de l’Environnement et ICCN) mpo ete bakoka kobatela ba zamba na banyama mpe na sima ya mikolo, bakoka bango moko koteya baimboka makambo mango. 5. Mpo na Projet Pro-Routes, lokola bonene bwa nzela ezali ya metele zomi na mibale na ndambu (12.5 m) ngambo na ngambo na zamba, mpe ezali na monene ya metele zomi na moko (11 m) nakati ya bamboka, biloko binso : ndako, nzete to eloko mosusu epesaka lisungi ezali pembeni ya nzela, engebene na politiki ya baye bapesaka misolo (Banque Mondiale mpe DFID), mpe na lokasa ya Ministère etalaka mabele, botongi ndako mpe botongi ba mboka, nyonso wana bakotanga yango mpe ekofutama. 6. Miango oyo etali bolamu mpe bomoyi bwa batu baye Projet ezali kolekela epai na bango yango oyo : (i) Bobongisi balabala enene, (ii) Bosungi baimboka (misala ya boluki bwanya, bakelasi ya likolo, ba ONG etc.) mpo ete bakoka kozwa mayele ma sika mpo ya eye etali misala ya bilanga (café, nzete ya mbila to mpe mafuta na Cacao). Ya solo, miango minaminso mileki makoki ya Projet Pro-Routes, kasi elikya ezali ete mbula matari eye etalaka misala mina etala makambo mana. Ntango mosusu, ba projets esusu ekosalema mpo ya kosunga bandeko baye bazali nakati Page 6 6 ya bisika babatela na l’Etat mpo ete baimboka banso basala misala ya kobatela mabele mpo na l’Etat. 7. Kobongisa miango ya misala ya kolandela projet na bandeko ya GEEC, ya Office de Routes mpe na ban ganga mayele basusu lokola ba Universités mpe Centres ya Recherches. Page 7 7